buku ya bolimboli kwokoso na mulongo ya botimoli
Post on 29-Dec-2016
244 Views
Preview:
TRANSCRIPT
SAVE ACTS MINE
BUKU YA BOLIMBOLI KWOKOSO NA MULONGO YA BOTIMOLI MPE ETAMBOLI YA NKITA
NA LINGALA
FRANCAISE
BOLIMBOLI :
Botimoli ya mabanga matalo na liziba ya mayi minene, na Africa yakati , ezalaki na katiya masolo minene oyo esili koleka ndelo ya mboka
na kotinda été bamboka nyoso ya maziba minene , mpe ya mokili mobimba esangani mpo na pesa eyano , na kolakisa bazangi kimia oyo
ebimi na bokasi bwa batomboki basimba manduki oyo basili kosala mbula tuku mibale na mboka, na kotika kotia mobulu mobulu ; mpe
boweyi na kati na bana n’some yamboka ya maziba minene , mpe na loboko ya mokambi ya mboka RDC1.
Nayango,bayebi(experts), ya bamboka nyoso,(nations Unies), namboka RDC ; mpe mangomba yamokili mobimba na mokengi ya bomoto
bwa moto, mpe mangomba nyoso ya bato(societé civile na RDC, 2balakisaki komona été ndenge nini botimoli bwa nkita oyo bozangi
ekambeli , mpe bovandi bwa batomboki basimba manduki na zamba ezali na bondeko bonene na loboko bwa mokambi ya mboka RDC.
Yango epesaka na na batomboki wana makoki ya kosala mombongo ya mabanga matalo, mazanga ekambeli. Mpo na kosukisa makambo
wana , l’OCDE Asili kotia buku ya botambwisi na mayele , mabanga matalo, ekouta na ndelo ya bitumba.
Na kati na buku wana , ya OCDE, mokanda yango elingi kosunga nzela ya botambwisi mabanga matalo ya boyengebene, na bopikiliki ya
mangomba oyo esalaka mosala ya ntimola mabanga matalo, na yango, ekosunga , mboka ya kozua tina na bozui ya mabanga matalo, ya
nkita yamboka , mpe na kotia mobango na kotimola nkita mpe kosala mobongo ya mabanga ya talo ezala te ebandeli ya mobulu , mpe
eloko oyo ezoboma bomoto ya mboka , mpe bozangi kimia na mboka.
Na kolekela na ministeli ya nkita ya mboka RDC, bokonzi ya mboka etiaki mobekonaye été, mpo na kozua buku wana ya OCDE , mpe lisungi
ya 1952, ya lisanga ya botii kimia na mokili, (conseil de securité), na misala yankita to mabanga matalo na mboka mobimba ya RDC., mpo
na kopesa etumbu na ba oyo bazali kotia mobulu na misalaya mabanga na mobeko wana , bokonzi yamboka , ekotisaki na mibeko naye,
buku ya butambwisi ya misala yankita (guide de l’OCDE). Buku oyo , ezali eloko muke, mpe ya boyebi , mpeza ya botambwisi ya misala ya
1 Premier paragraphe, avant-propos de la deuxième édition du guide de l’OCDE.
2Note circulaire N®002/CAB.MIN/MINES/01/2011 du 06 septembre 2011.
3 S/RES/1952 2011
mabanga yatalo , mpe yaboyebi mpeza ya botambwisi ya misalaya mabanga yatalo , mpe nkita , na botelemisi ya makoki , mpo na kotia na
molongo misala : kotimola , botambwisi mpe na molayi mibulu mpe bitumba oyo ezouta na boteki ya mbongo ezanga ekambeli.
NA LIBANDELI
Likanisi ya buku oyo epesi mutuya , mpo na kotia mbongwana na nzela ya botambwisiya mabanga yatalo na mboka RDC.
Buku oyo emipesi penza mosala ya botomboli ya misala ya maboko na ndeloya ya mabanga matalo, 3T(Etain, Tungestene, tantalite, na
holo(Or).
Oyo ezali na nzela ya botambwisi ya nkita ,oyo ezali mosala ya botambwisi ya nkita , na mabanga yatalo, mpe mabanga ya langi,( pierres de
couleurs), buku ekoki mpe, kosunga botombwami ya ndelo ya botimoli ya mabokoya mabanga matalo , oyo ezali likanisi ya OCDE.
Bosaleli ya buku oyo ezali likambo yamutuya mpo na misala ya botimoli mabanga yatalo, oyo ezali kosalema na botimoli ( batimoli oyo
bazali na masanga ya botimoli mabanga matalo), mpe na botambwisi ( bamemi mabanga yatalo, na mboka ya boteki nkita , mpe na nzela
ya botindi mabanga motalo, ( na bamboka ya bosalisi ya mabanga yatalo), mpo na koleka na etando ya liboyo na kati ya mosala ya kotiya
botimoli malamu , mpe boyebi ya mikakatano oyo ezali komimonisa na misala na bango ya mikolo nyoso.
Buku oyo ezali eloko ya bolakisi mpo, na bosali ya mabanga matalo oyo ezali na motuya ya botambwisi ya mabanga matalo na lolenge ya
misalaya OCDE.
Bilingi oyo esalemi na buku oyo ezui soki mokote, makambo nyoso ya mikakatano ya botimoli mabanga yatalo. Na yango, esosolisi penza ,
likanisi polelepolele bisalelo oyo elakisi nkwokoso na ndingisa ya OCDE, na botambwisi ya nkita oyo ezouta na bitando ya mobulu. Na
kolongola makambo oyo esalemi na OCDE mpo na makambo ya nkwokoso mpeza na botambwisi ya mabanga yatalo, emonani mpe :
- Bokotisi ya batomboki ,basimba manduki na botimoli mabanga yatalo ;
- Lisalisi na mibulu ya basimbamanduki, mpe, bato, pembeni ya botimoli mabanga ;
- Bobomi ya bomoto na misala ya bomisi ,mpe, boteki ya mabanga yatalo ;
- Kimuibi, bozui ya misolo ,mpe misala ya bosalela mombongo ya moibi
- Mombongoyamabeya mabanga yatalo.
- Etc…
Buku oyo, elakisi, mpe, makambo mosusu oyo elakisi misala mabe ya botimoli manga matalo :
- Misala ya botimoli mabanga matalo likolo ya nzinganzinga ;
- Nkwokoso ya kufa ya bato kati na botimoli mabanga yatalo na maboko ;
- Bobiki ya mabe ya batimoli mabanga matalo na maboko.
- Etc…
Lokola eloko ya lisungi mpo na botambwisi ya buku ya OCDE,buku oyo , ezali na ndingisa ya kokata nzela ya botimoli,botambwisi , mpe
mombongo ya mabanga matalo, na nkwokoso ya bato , to na basolda, na ndenge ya botimoli ya mabanga yatalo.
Buku oyo, elakisi lisusu na biteni oyo ezali na misala ya malamu te na botimoli mabanga ma talo :
- Misala ya mabe na botimoli mabanga matalo, mpe na nzinga nzinga , mpe bisika bipekisami;
- Nkwkoso ya boweyi ya mbalakaka na bisika ya botimili mabanga na maboko;
- Bisaleli ya mabe ya mosala ya batimoli ya maboko. Etc.
Neti esalelo ya botelemisi misala ya buku ya OCDE, buku oyo azali na tina ya kosukisa bondeko oyo ezali na botimoli , botambwisi, mpe mombongo ya
mabanga , mpe mobulu ya batu basimba manduki na ndenge nyonso ya bobomi ya bomoto, oyo ekoki kobimela na bisika ya mibulu.
Na ndenge ya misala, buku oyo elingaki kolakisa lolenge ya malamu , mpe botambwisi ya misala ya botimoli na maboko ya 3T na wolo , mpo ÉTÉ
mombongo ya mabanga matalo esalema na lolenge ya bomoto penza, mpo kotombola kimia na botombwami makasi na bisika nkita na mabanga
matalo.
NDENGE NINI YA KOSALELA BUKU YA BOYEBI NKWOKOSO
OYO ESENGELI KOYEBA Bililingi nyonso ekolakisa likambo moko na moko ya kwokoso oyo ekoki kobimela na tango ya botimoli , botambwisi , mpe na mobongo ya mabanga matalo.
Mpe lisusu Elilingi nyoso ezali na tina na yango oyo ekomami na lopoto moko ya mboka (swahili et lingala facile etc…) , oyo limboli likambo moko esalemi kati na elilingi.
Na suka Makambo mingi elakisami na buku oyo, ezali kolanda penza nzela ya botambwisi ya mabanga matalo na bisika bikozala kayebana.
MOTO YA LIBOSO AZALI MOSALELI MABANGA MATALO… Na bisika nyonso azali, mosaleli ya mabanga matalo , na nzela ya botamwisi ya mabanga ma talo, zuaka lolenge ya koboma nkwokoso ndenge ya buku ya botambwisi ya OCDE , na eteni naye ya suka III3
3Kotala buku ya mibale ya OCDE.
NZELA YA BOZUI YA MABANGA MATALO : NA BOTIMOLI, TII NA BOTEKI NA LIBANDA YA
MBOKA.
BOTIMOLI
BOTEKI
BOTEKI NA
LIBANDA FONDERIES
SERVICES INTERVENANTS
- SAESSCAM
- DIVI.PROV.MINE
Libulu ya botimili
Bisika ya bosombi mabanga
BASALELI NKITA
Bisika ya bobongisi m
Mabanga ma
li
B
O
N
G
BA
KU
M
BI
SERVICES INTERVENANTS
- C.E.E.C - DIV.PROV.MINE - O.C.C - DIV.COMM.EXT. - D.G.D.A
BASALELI YA NKITA
cooperative Minière
SERVICES NTERVENANTS
- SAESSCAM
- DIVI.PROV.MINE
BASELELI YA NKITA
Basombi ya Mabanga
matlo
NDENGE NA NDENGE YA KOBOMA NKWOKOSO OYO EUTI NA NZELA YA BOZUI MABANGA
MATALO.
Nkwokoso: Lisungi ya biloko , mpe ya mbongo polelepolele , to koelekela na bato basimba manduki, to na basoda ya molongo ba oyo bazanga botosi, mpe po na buzui basi na makasi , oyo ezali mosala penza ya bilenge na bisika ya botimoli mabanga ma talo, kosalisa bana misala na makasi,oyo ezali lokola mombongo ya moto , kobeta, to, lolenge nyonso ya bobomi bomoto na mibeko ya bato na mokili mobimba etc… NDENGE YA BOKOKITISI NKWOKOSO : KOTIKA PENZA BONDEKO NYONSO NA BA OYO BALOBAMI LIBOSO.
Lolenge ya
liboso :1
Lolenge ya
misatu : 3
Lolenge ya mibale :2
KWOKOSO: Bozangi botosi ya mobeko likonzi ya OCDE eboti makambo lokola : Boyebi ya lokuta ya bisika ekoutaka mabanga matalo ; bofutami mpe ya lokuta ya mpako ya kaisala , mpo na botimomli mabanga matalo, mpe na basali ya mbongo ya mabe , bufutisi ya mbongo oyo eyebani te, bisaleli ya mabe ya bisalelo ya botambwisi ya malamu ya mabanga matalo, mpe bokisi ya mwasi na zemi kati na misala ya botimoli mabanga matalo etc. NDENGE YA BOKITISI NKWOKOSO: KOTIA LOLENGE OYO EKOTOMBOLA LIKAMBO YANGO LIKOLO YA LOKASA LIOKO OYO EKOMAMI NA KONDIMA NA KONDIMA YA MOTO NYONSO (Sanza 3 pamba).
NKWOKOSO: Mauvaises condition de travail des creuseurs dans la mine ; impact négatif sur l’environnement ;leconflit entre détenteurs des titres miniers et lescreuseursartisanaux etc… NDENGE YA BOKITISI NKWOKOSO: KOTIA LOLENGE OYO EKOTOMBOLA LIKAMBO YANGO LIKOLO YA LOKASA LIOKO OYO EKOMAMI NA KONDIMA NA KONDIMA YA MOTO NYONSO (Sanza 6 pamba).
.
1.BOTIMOLI: NA MABULU YA MABANGA MATALO
BOMONANI YA BASODA EPEKISAMI NA BOTIMOLI MABANGA MATALO.
KOMIKOTISA YA BATO BASIMBA MANDUKI NA BOTIMOLI MABANGA MATALO.
MOBULU KATI YA BAKOLO MAZIBA NA BATIMOLI NA MABOKO MABANGA MATALO CREUSEURS ARTISANAUX
BATIMOLI YA MABOKO YA MABANGAMATALO BABENGAMI KOSALA NA MAIZIBA MATALO NA BONDIMAMI YA BAKOLA NANGO PENZA.
EPEKISAMI KOPESA MISALA NA BANA MIKE YA MBULA 18 NA KOKITA NA BISIKA YA BOTIMOLI, MPE BOTAMBWISI MABANGA YATALO.
MISALA YA MABE PENZA MPO NA BANA MIKE NA MAZIBA YA BOTIMOLI MABANGA.
EPEKISAMI NA BASI YA ZEMI KOTIMOLA MABANGA MATALO.
KOMIKOTISA YA BASI NA MISALA YA BOTIMOLI MABANGA MATALO
EPEKISAME NA BASI YA ZEMI KOTIMOLA MABANGA MATALO.
MBEBA YA KOZUA BASI NA MAKASI NA MAZIBA YA MABANGA YA TALO.
BOZANGI KIMIA, MPE MISALA MABE NA MAZBA YA MABANGA MATALO.
EPEKISAMI KOTIMOLA MABANGA MATALO SOKI KIMIA EZALI TE.
KOMIKOTISA YA BAKONZI YA MBOKA NA MISALA YA BOTIMOLI
MABANGA YA TALO.
MISALA MABE YA BOTIMOLI MABANGA MATALO LIKOLO YA NZINGANZINGA.
EPEKISAMI BOTIMOLI MABANGA MATALO NA BISIKA EPEKISAMI.
EPEKISAMI KOSALA MISALA YA MAKASI, MPE YA MPAMBA,NA BOTIMOLI, MABANGA MATALO, MPO NA BAKONZI NYOSO.
2.BOTAMBWISI : NZELA YA BOTAMBWISI YA MABANGA MATALO
EPEKISAMI KOMEMA MIKUMBA YA MABANGA MATALO KOLEKA 20 Kg NA MUTU , TO NA MOKONGO YA MOTO..
BOKANGAMI YA NZELA OYO EZANGI TINA EPEKISAMI NA NZELA YA BOTAMBWISI MABANGA YA TALO.
BOMEMI YA MIBALI MABANGA MATALO.
BOKANGAMI YA NZELA NA NZELA YA BOTAMBWISI MABANGA YA TALOS.
BATO BASIMBA MANDUKI BAZALI NA NDINGISA TE YA KOMEMEA MPE KOSALA MOMBONGO YA MABANGA MATALO.
KOMIKOTISA NA MAKASI YA MABE KATI YA MOMBONGO , MPO NA KOTIA NKWOKOSO NA MOLONGO YA BOZUI MPE BOTAMBWISI MABANGA MATALO.
3. MOMBONGO : BOTEKI NA MBOKA YA BAPAYA
BOFUTISI MBONGO YA MABE NA MOMBONGO
YA MABANGA MATALO. KOMISALELA MBONGO YA MABE NA
MOMBONGO YA MABANGA MATALO.
EPEKISAMI KOFUTA MBONGO YA LOKUTA NA MISALA YA BOTIMILI MABANGA MATALO.
EPEKISAMI KOFUTA , PE KOSOMBA MAMBANGA YA TALO OYO EZALI NA MOLONGO YA NDAKO YA MBONGO TE.
MOMBONGO YA MABE NA MOMBONGO OYO EYEBANI TE NA MISALA
YA MABANGA YA TALO NAETANDO YA SUKA YA MBOKA.
LILOBA YA LOKUTA YA BOUTI, MPE BOSALISI YA
MABE YA BIBUNDELI YA SOLO YA MOLONGO YA
MABANGA MATALO.
ESALELI YA MABE YABISALELO YA MOLONGO YA MABANGA MATALO, MPE MALOBA YA LOKUTA MPO NA BOUTI MABANGA MATALO, EPEKISAMI EPAI YA BAOYO BAKOSALAKA MISALA YA MABANGA MATALO.
EPEKISAMI PENZA KOSALA MOBANGO YA MOIBI YA MISALA YA MABANGA MATALO , NA BITANDO YA MBOKA MIBALE.
Likanisi , eyebelo, mpe mbela , ekotisi mbongwana mingi mpo, na kusunga ndenge ya koyeba nkwokoso oyo ekoutaka na molongo ya
bozui mabanga matalo na bisika ya bitumba.
BIYEBELO , Mpe mbela elakisi makambo ya motuya penza , mpo kolakisa ndenge nini ya kosala, mpo na kobundisa nkwokoso nyoso na
bisika bizanga kimia na misala ya mabanga matalo.
NDAKISA :
Liziba lia mabanga matalo oyo ezali na maboko ya batomboki , ezali na nkokoso mpo na tina été, ezali kounga batomboki na mombongo.
Mpo na eyebelo na mbela : «liziba ya mabanga matalo oyo ezali na maboko ya matomboki », Mosaleli ya nkita akoboya kozua mabanga
matalo na bisika ya boye, mpo na kosunga te, polele polele , to na sima ya mukongo nkokoso , to bitumba na bisika eye. Boye , akobatela
bomoto bwaye.
Biyebelo na mbela oyo ezuami na buku oyo,ezali nyoso penza te, basaleli ya mabanga matalo, bakoki kopesa mosusu oyo ezali kopekisa
basala mosala malamu te, na misala ya botimoli mabanga matalo.
Kati na tableaux oyo ekolanda, na molongo na yango ya misatu , elakisi bokasi ya nkwokoso , mpe na molongo ya suka elakisi biyabelo
mpe mbela oyo ekoutaka na nkokoso ya misala eye.
Na mukuse penza, molongo ya mabanga ya talo , biyebelo , mpe mbela mingi ezali, nyoso elandemi na misala oyo ezo salema.
LIKANISI,« eyebelo, /mbela»
BOTIMOLI : maziba ya mabanga matalo.
NDAKISA :1
Esika ya botimoli Mabanga ya talo
ezuami na etando oyo baye
basimba manduki ba zuami
Batimoli Mabanga ya talo bazali
ko salela baye basimba manduki
ekongo
Batimoli Mabanga ya talo bazali
ko sala mibongo na baye basimba
manduki
Lisanga moko ya baye basimba
manduki ezali ko kota kota na
Esika ya botimoli Mabanga ya talo
Lisanga ya baye ba simba
manduki bazali ko futisa mpako
likolo ya misala ya botimoli
Mabanga ya talo
BOKOTI YA MASANGA YA BAYE BA
SIMBA MANDUKI NA MISALA YA
BOTIMOLI MABANGA YA TALO
BOTAMBWISI : NZELA YA KOMEMA MABANGA MATALO
NDAKISA YA : 2
Mabanga ya talo oyo ezali ko
timolama Na bisika elongobani te
ezali koleka na nzela moko na
Mabanga ya talo oyo etimolami na
bisika oyo elongobani
Ko zanga lisanga ya baye ba
salaka misala ya bomemi biloko
na mituka
Botekisi to pe esaleli mabe ya
biloko ya tracabilite ya Mabanga
ya talo
BOKOTISI BILOKO MABE NA
MOMBONGO YA MABANGA YA
TALO KOLEKELA BA ZELA YA
MITUKA
MOMBONGO : BOTEKI & BOBIMISI YA LIBANDA YA MABANGA MATALO.
Exemple TROIS
Talo ya bosombi Mabanga ya talo
ezali moko Te na ba zando ya ba
mboka ezali pembeni-pembeni
Mabanga ya talo emonani mingi pe bosengi
na yango ezali moke na mboka songolo-
Mabanga ya talo ezo monana te kasi
bosengi ezali mingi na mboka pakala
Masanga ya baye basalaka
mombongo ya Mabanga ya talo na
nzela elongobani te ezali na etando
Bozangi makasi ya ba service ya
mbulamatari oyo ebatelaka ba
frontieres ya mboka
Bozangi Politiki ya ko bundisa
mombongo ya Mabanga ya talo na
nzela mabe kati ya ba mboka
mibale oyo ezali pembeni-pembeni
MOMBONGO YA NZELA YA MOIBI
KATI YA BIKOLO OYO EZALI
PEMBENI-PEMBENI
Botiami ya buku ya OCDE, epesi penza etamboli elamu ya basali misala ya botambwisi mabanga matalo, moko moko na lolenge naye.
Nakotia buku oyo na misala, na bolatisi yango na ndakisa ndenge na ndenge, epesi mosala ya basali misala ya mabanga matalo tina , na yango
akozalaka moto ya liboso kolia mbuma ya misala wana , mpe misala ya ngo ekotambola malmu : mpe akotekaka mabanga naye ya talo na zando ya
malamu, mpe na talo kitoko.
Botiami ya buku oyo ya malamu penza, ezali mosala makasi te. Ezali kaka kolakisa soki moto azali solo moto, na basali ya mabanga matalo, na misala
naye ya mokolo na mokolo.
Lisusu, esengami na mosli nyoso ya mabanga matalo, kosala angele , mpo naete mosala naye esunga misala ya bato basimba manduki te, oyo ezali
kobebisa bomoto, mpe kobota bisalasala ya mbongo ya lokuta,etc.
OYO ETIKALI KOSALA
KOTOMBOLA MISALA MPO, NA KOSUKISA NKWOKOSO NYOSO.
(Bokanisa molongo ya III mpe bobakisami likolo ya 3T na Wolo ya buku ya OCDE).
MPo nanini kosala mosala ya malamu mpo na botambwisi , botimoli, mpe mombongo ya
mabanga matalo ?
SAVE ACT MINE
Ezali lioko lingomba ya bato , oyo ezali kolakisa nzela mpo na na molongo ya bozui
Ya mabanga matalo na bisika ya bitumba.
Mosala naye ya tina mingi ezali mpo na kotombola , mpe botiami na misala ya buku ya OCDE
Na kati ya mombongo , koboya penza mombongo ya mabe ya mabanga matalo,
Botombwami ya botimoli mabanga matalo na maboko, mpe kosunga ba oyo nyoso bakotiaka loboko , mpo
mosala ya botimoli mabanga matalo emonana malamu.
Mpo na koyeba mingi, botangani lingomba na bino na nzela:
www.samint.org
top related